Glogota
Informations de contact, plan et itinéraire, formulaire de contact, heures d'ouverture, services, évaluations, photos, vidéos et annonces de Glogota, Shopping et vente au détail, Avenue : phoba nlandu, Quartier : Kimbangu, Commune : Kalamu, Boma.
Nous aidons les gens à ne plus se déplacer pour aller faire des chopping, notre société est spécialisée dans ces services et nous faisons la livraison à domicile, nous avons des agents qualifié
Marinette- DU PAIN CHENG Personal blog
30/04/2022
INGRATITUDE D'AMOUR
________________________
ÉPISODE : 20 FIN
Fabrice : 20.000 dollars wana toko zua yango vraiment wapi nzambe nanga naza na besoin leki nanga akufa te 😭
Fabrice abimi place maman naye naomi azalaki fabrice mayi ya misu ebandaki ko bima ye😭
Naomi : fabrice problème nini oyo okomi ti na niveau yako lela boye stp ezala oyo nga nazo kanisa te stp
Fabrice : maman makambu eza vraiment grave pona vie ya gloria😢
Naomi: docteur alobi nini
Fabrice : maman cas ya gloria eza vraiment grave makasi docteur alobi soki to sali mbangu te toko perdre gloria
Naomi : sikoyo problème yango eza nini
Fabrice : maman docteur alobi gloria asalaki mélange ya ba kisi ebele ndenge eza wana muana wana azui problème parce que makila ebimaka gloria ebele donc zemi elongwe ye mais il faut ba sala ye opération bako kata ye ba trompe ako bota lisusu te
Naomi: gloria ako bota lisusu te na vie naye mobimba to kaka pona zemi wana ?
Fabrice : vie naye mobimba ako bota lisusu te maman en plus opération wana ezo senga 20.000$
Noami : 20.000$ pona ba sala gloria opération ?
Fabrice : oui maman
Noami : gloria abomi nga maman naye ebele ya mbongo wana vraiment eko wuta wapi vraiment soki kutu nanu na simba ata 500$ te ebongo sikoyo oyo 20.000$ 😭
Fabrice : maman ndenge naza awa nazo yeba ata ndenge yako banda te oyo nionso eza kaka ko zanga ko yoka vraiment soki gloria ayokaki nga mais nionso oyo tout eza te
Naomi : nzambe oyo nini vraiment nazo mona muana nanga kaka moko ya muasi naza naye vraiment nzambe naza na besoin na perdre ye te
Fabrice: maman nga na moni to kende kaka epa ya Lionel asunga biso parce que toza na mutu mususu te oyo akoki ko pesa biso mbongo oyo
Naomi: Lionel oyo wapi fabrice tika nayo lisolo ya Lionel mutu apesa gloria milaso pona abamba lipapa esque vraiment ako sunga biso Lionel aza lisusu Lionel ya kala te
Fabrice : maman to kende nanu ko meka parce que choix eza te
Naomi : lokola o insisté problème eza te to kende kaka
***Au moment où bazo solola docteur abimi
Docteur : mais apparemment bino boza comment donc boza na bino kaka awa na place bo kende ko luka mbongo mais boza kaka awa ndenge état ya mutu na bino ezo koma ezo lobela bino vraiment eloko te où comment boza na besoin problème ekomela hôpital na biso to nini
Fabrice : stp docteur tozo kende to bandaki kaka ko solola na maman pona makambu ya mbongo limbisa biso
Docteur : bosala mbangu to pesi ye mua ba kisi mais soki kaka 48h ekoki bo trouver solution te eko komela ye grave pe toko pesa bino ye bino moko bo luka solution
Naomi : stp docteur kosala boye te 😭
Fabrice : maman tika nanu ko lela to kende mbangu
Fabrice na maman naye bake ko luka Lionel
***Quelques heures après bakomi place Lionel abandaki kosala mécanique liboso
Fabrice : maman awa nde place lionel asalaka mécanique
Naomi : mais yo olobaki akoma directeur ya compagnie
Fabrice : oui maman mais nga place nayebi abandaki kosala kaka yango oyo tangu bazalaki ensembles na gloria
Naomi: kasi to kota na kati to tuna nanu
Fabrice : sava maman na moni pe mutu oyo ba bandaki kosala naye to tuna ye nanu
***Fabrice na maman naye ba pusani pembeni
Fabrice : bonjour tonton
________: oui bonjour
Fabrice : pardon pona dérangement tozo luka Lionel
________: Lionel oyo wapi ?
Fabrice : oyo ya mécanicien bo bandaki kosala naye awa obosani nga ?
_________: nazo yeba lisusu te mais boss Lionel déjà alongwa awa ye akoma déjà na compagnie place asalaka
Fabrice : stp okoki ko yeba place asalaka te ?
________: bo kende kaka na limete na 7éme rue bo tuna compagnie oyo basalaka ba voiture bako lakisa bino yango eza kaka compagnie moko oyo ezalaka kuna na limete
Fabrice : merci beaucoup vraiment
Fabrice : maman to kende nayebi compagnie yango
Naomi : sikoyo toko kende makolo ti kuna ?
Fabrice : te maman naza na 5000fc moko awa tozua kaka moto kasi
***Fabrice na maman naye ba mati lisusu moto ba keyi
***L'autre côté Lionel azalaki na compagnie
Lionel : Chris namoni vraiment ndenge musala ezo tambola na sepeli vraiment na moni ba contrat ezoya kaka ebele
Chris : oui oui tangu ye moko patron akoya ako sepela na musala oyo
Lionel : esengo ya musala ezalaka nde boye biso tout tozo sepela nango
Chris : oui eza bongo
Lionel : bon nga il faut na zonga ndaku tala kaka ndenge madame nanga akomi na zemi azo linga kaka nga nazalaka pembeni naye
Chris : vraiment basi ya zemi kaka boye il faut ko kokisa ba posa naye tala kaka eza zemi ya liboso
Lionel : Oui Oui na lobaki naye que nako wumela te mais nga nazongi nanu ndaku yo zala awa otikala ko contrôle nanu musala nga nakoya kaka lobi mais soki mutu aza na besoin nanga pesa bango numéro nanga ba benga nga
Chris : merci beaucoup mon frère lobi nakoya na ndaku na tongo makasi pona to kende makambu ya lopangu
Lionel : sava nako zela yo
****Lionel amati na voiture naye azongi ndaku
***Quelques heures après fabrice na maman naye ba koti na compagnie ba moni Chris
Fabrice : maman c'est sûr compagnie yango yango oyo
Naomi : comment oyebi que eza yango ?
Fabrice : maman jeune wana alati Lacoste ya pembe aza ami ya Lionel ba salaka naye na mariage ya Lionel pe na monaki ye
Naomi : esali kaka bien yende ako yeba place Lionel azali
Fabrice ba pusani place Chris azalaki
Fabrice : bonjour
Chris : oui bonjour monsieur nini nakoki kosala pona bino ?
Fabrice : tozo luka Lionel
Chris : Lionel aza te soki eza pona ko somba voiture nga naza awa ba voiture ebele eza yaba nouveau modèle ndeti oyo wana ekosimba nayo vraiment to kende otala ngo
Naomi : papa biso toye awa pona ko somba ba voitures te problème toza nango oyebi te stp toza na posa ya papa Lionel
Chris : désolé maman Lionel déjà azongi ndaku naye
Naomi : stp lakisa biso ndaku naye pesa biso ata adresse to kende kuna
Chris : maman Lionel alobaki na lakisa mutu ndaku naye te
Fabrice : stp biso toza famille ya gloria oyo maman naye nga naza yaya naye toza na problème moko grave ezo senga intervention ya Lionel stp lakisa biso
Naomi abandi ko lela😭
Fabrice : maman makambu yako lela eza awa te stp tozo luka nanu solution
Chris : sava kasi bozela na tia crédit na benga ye bo vanda nanu awa kasi
Fabrice : merci beaucoup maman yaka to vanda kasi to zela ye atia crédit
***Chris ake kotia crédit
Chez Lionel
Lionel akomi na ndaku akuti maria yako lala mbala moko apesi maria bisou💋 alamuki
Maria : mon amour na bangi makasi
Lionel : mdr, okanisi nani
Maria : na kanisi mutu akoteli nga awa
Lionel : mutu yango ako meka nanu ko kota wapi nako boma ye
Maria : vraiment mon amour kaka ndenge ba garde baza libanda ya porte ako kota ndenge nini
Lionel : vraiment mon amour naza vraiment na nzala makasi
Maria : mon amour to kende kasi to lia na bandaki kaka kozela yo
Lionel : olambi nini ?
Maria: mon amour nga te mutu na lambi bonne mutu alambi fumbwa na poisson
Lionel : wahou nazalaki vraiment na posa nango makasi comme ça nako lia yango na appétit
Maria : vraiment mon amour to kende ngape naza na nzala
***Lionel na maria bake na salle à mange ba vandi
***Quelques minutes après phone ya Lionel esonne ezalaki Chris
Lionel : Oui Chris
Chris : eza na batu moko mibale bazo luka yo awa baza kuna na kati ya compagnie ba lobi na lakisa bango place ovandaka
Lionel : place nga na vandaka ?
Chris : Oui
Lionel : ba kombo na bango ba nani ?
Chris : ba lobi kaka baza ba famille ya gloria moko alobi aza yaya naye moko aza maman naye
Lionel : ah! oui je vois ba lobi nini kasi
Chris : na moni lokola baza na problème parce que maman naye azo lela makasi alobi baza na besoin ya intervention nayo
Lionel : sava nazo rappelle yo dans quelques minutes
Appel off
Maria : mon amour wana lisusu nani ?
Lionel : Eza Chris alobi que maman ya gloria na grand frère naye baza na compagnie baza na besoin ya intervention nanga nayebi te soki pourquoi alobi même maman ya gloria azo lela makasi
Maria : mais mon amour meka un peu ko rappelle bango toyeba soki eza problème nini kasi
Lionel : to silisa nanu ko lia chérie
Maria : non mon amour toko lia sima ndenge déjà maman ya gloria azo lela seka eza vraiment grave donc luka nanu toyeba problème yango yo yebisa kaka chris alakisa bango ndaku baya awa
Lionel azui phone à rappelle chris
Lionel : allô chris yebisa bango baya kaka na ndaku pesa bango adressé soki oza même na 5000fc pesa bango ba futa moto
Chris : sava nazo sala ngo
Appel off
Lionel : nasali yango mon amour
Maria : oui d'après tout gloria aza ennemi na biso te aza amie nanga grâce naye nde nga nayo to yebanaki malgré ezalaki chance nanga
Lionel : je vois mon amour
Maria : sava mais zela nga na kende ko yebisa ba garde libanda soki batu moko baye akotisa bango yo liaka nayo
Lionel : zela oko kuta biloko nionso déjà esili
Maria : wana toko pebana makasi
Lionel : mdr,
L'autre côté
Chris : to wuti ko solola na Lionel alobi bo kende kuna na ndaku adressé yango oyo
Fabrice : merci beaucoup vraiment
Chris : alobi na pesa bino mbongo oyo bo futa transport
Fabrice : merci c'est gentil
Fabrice na maman naye ba keyi
Après quelques minutes bakomi na lopangu ya Lionel
Naomi: fabrice oyo lopangu ya Lionel
Fabrice : oui maman
Naomi : azalaka nde na lopangu kitoko boye vraiment
Fabrice : tala vraiment ndenge gloria arate kaka chance boye
Naomie : lopangu lokola ya président tala ba voitures ya kitoko
Fabrice : maman Lionel akoma na mbongo ebele
Au moment où bazo solola garde moko aye wana
________: maman patron alobi bo kota amoni bino déjà na caméra de surveillance
Naomi : merci
***Fabrice na Naomi ba koti na kati ba moni Lionel na maria ba vandi mais naomi banda abandaki ko kamwa ndaku
Fabrice : bonsoir
Lionel : oui bonsoir boni bino
Fabrice : ça ne va pas
Lionel : bon je vois na moni kaka mbala moko likambu eza parce que tosololaki na chris alobi nanga que boza na problème moko gravé
Naomi : oui papa Lionel soki osungi biso te nayebi te nani ako sunga biso vraiment toza na problème moko gravé
Lionel : problème yango eza nini ?
Naomi : ezalaki kaka lelo na zalaki te na bimaki na retour nanga tangu na koti na chambre na kuti gloria ba fulu fulu na munoko na makila pe ezo bima ye nase na biso basi
Maria : Oh! Mon Dieu sikoyo aza wapi ?
Naomi : aza na hôpital docteur alobi na biso que amelaki poison asalaki mélange ya ba kisi ebele ndenge toza boye cas naye eza vraiment grave ba lobi il faut basala ye opération parce que ba trompé naye ezui problème pe muana akufi toza na posa ya lisungi nayo papa😭
Maria : maman tika ko lela toko zua solution
Lionel : sikoyo opération yango ezo senga combien ?
Fabrice : ba lobi il faut to pesa 20.000$ to yebi te ndenge nini toko banda
Maria : mon amour il faut faire quelques chose gloria azalaki fiancé nayo malgré mabe naye mais zongisa motema sima ata pona ye te sala yango même ata pona maman naye to grand frère naye
Lionel : nayoki eza problème te 20.000$ eza mbongo ebele mais epa nanga eko lobela nga eloko moko te nako zua charge wana nionso bible elobi ba zongisaka mabe na mabe te
Naomi: papa Lionel olobi ozo sala nini ?
Lionel : nga moko nako pesa 20.000$ wana pona ba sala gloria opération
Naomi : papa nayebi te soki na remercie yo ndenge nini vraiment
Fabrice : na ndimaki te vraiment mutu akoki ko monana pona apesa biso mbongo wana
Lionel : toza déjà famille to mesanaki makasi malgré gloria amonaki nga eloko pamba mais nako sunga ye kaka ata muasi nanga alobaki yango il faut nake nde ko senga gloria bo limbisi pona acté oyo na salaki ndenge na pesaka ye milaso mais na salaka yango pona na rappelle ye que ba negligeaka mutu te na vie
Maria : maman to yoki bino ndenge bo lobi gloria aza ami nanga to bandi naye lelo te toko sunga ye
Naomi : nanu na mona batu ya motema malamu lokola bino te
Lionel : maman aza na hôpital nini ?
Naomi: hôpital ya bima oyo ezalaka na lemba sous région
Lionel : oui na moni lobi nga moko na muasi nanga tokoya wana ba 12h parce que il faut to kende nanu kosala makambu moko boye ba 12h nde tokoya
Fabrice : merci beaucoup nzambe apambola bino vraiment
Lionel : mon amour pesa bango transport
maria akoti na chambre apesi bango transport ba keyi
Maria : ba pesi nga mawa makasi ebongo gloria comment akoki kosala bongo ata problème yango eleki ndenge nini nakoki jamais ko risque
Lionel : vraiment eza pasi pona ba filles ya Kinshasa
***L'autre côté fabrice na maman naye elekelaki bango
Naomi: Lionel aza vraiment mobali moko bien aza na motema yako limbisa vraiment
Fabrice : maman na ndimaki te na nionso oyo gloria asala ye vraiment
Naomi : nakoma ki kutu ko banga ko tala ye pona soni mais maria pe aza kaka bien soki ezalaki basi mususu alingaki andima te Lionel asunga gloria
***Un jour après Lionel ba kendaki ko sombela ba parents na bango mapangu après bake directement na hôpital
Lionel na maria bakomi na hôpital ba kuti fabrice na Naomi
Lionel : bonjour
Fabrice : bonjour to bandaki kk ko zela bino
Lionel : vraiment docteur aza wapi ?
Fabrice : aza kuna na bureau
Lionel : sava yaka to kota lokola yo oza mobali
Lionel na fabrice ba koti na bureau bosololi na docteur ba pesi pe mbongo nionso après ba transféré gloria na hôpital ya munene pona opération
Fabrice : merci beaucoup nayebi te comment nakoki ko remercie yo vraiment
Lionel : eza nango problème te lokola docteur alobi bako sala ye opération lelo na pokwa lobi tokoya pona tosolola naye
Fabrice : merci beaucoup
Lionel na maria ba zongi ndaku
Chez Dina
Dina : muana nanga akomi na mbongo ebele asombeli nga lopangu ya munene na gombe il faut na benga jorna na yebisa ye
***Deux jours après basalaki gloria opération mais ba kataki ye ba trompe na vie naye mobimba ako bota lisusu te
Lionel na maria baye lisusu ko tala gloria na hôpital place azalaki gloria tangu amoni bango akomi ko lela😭
Gloria : Lionel nanga nayebi te comment nakoki ko remercie yo maman abeteli nga masolo nionso nayebi que nasalaki yo mabe mais na sengi kaka oluka place na motema olimbisa nga malgré nga nayo tokoki lisusu kozala ensembles te mais limbisa nga nasalaki erreur grave nayeba kite que oza mobali malamu boye na landaki mobali ya poto tala lelo oyo ndenge nga na suki na vie nanga mobimba nako bota lisusu te😭
Lionel : gloria esali nga pasi peut-être pe nzambe alingaki nga nayo tozala ensembles te pona nakoma oyo naza lelo mais nga Lionel nasalaka yo mabe te mais naza na problème nayo te
Gloria : maria soki nga gloria na sala yo mabe limbisa nga eza fauté nayo te nga moko mutu na loba nayo olinga Lionel bo continue bolingo na bino zala naye bien Lionel aza mobali moko malamu tala ndenge na perdre tout likolo ya buzoba nanga lelo sikoyo na comprendre que na vie ba negligeaka mutu te mutu ako sunga yo oko yeba te😭
Maria : tika ko lela eza kaka ba réalité ya vie
Lionel : gloria limbisa ngape ndenge na pesaka yo milaso na salaki yango pona o comprendre que vie eza compliqué soki mutu nanu akufi te ko seka ye te
Gloria : merci beaucoup pour tout malgré na vie nanga nako tikala lisusu ko bota te😭
Gloria alelaki makasi andimaki que Lionel akokaki ko sunga ye un jour
Une semaine après gloria abimaki hôpital Lionel apesaki fabrice musala pona asunga gloria na maman naye
Une année plus t**d
Maria abotaki muana muasi kombo naye ezalaki lumière
Belgique
archile : maman makambu oyo eza lisusu claire te tosali déjà 1ans yango na quelques mois banda na bala muasi nanga azo bota te
Nadege : ako bota kaka
archile : maman na musala na biso avant ba matisa mutu posté il faut azala marié azala pe na muana sikoyo bazo linga ba komisa nga directeur
Nadege : nga na moni kaka zonga kuna na kin okende ko zua muana nayo naza sûr que gloria déjà abota
archile : maman makambu nini ozo loba wana kaka ndenge na tikala gloria na zemi naya awa na Belgique
Nadege : eza problème moko te oko mema kaka mbongo oko futa amende
archile : maman eza un peu risque bakoki pe ko funda nga na justice
Nadege : ko banga te mais ata ba fundi yo oko loba que ondimi kozua charge ya muana nionso oyo ba ko senga yo okosala ngo c tout
archile : sava maman na préparer kasi makambu ya voyage
Quelques semaines après archile azongaki kin pona azua muana naye
archile akomaki chez ba gloria Naomi abandaki ko lamba gloria avandaki mbala moko tangu gloria amoni archile abandaki ko lela😭
Gloria : archile oza ndoki après quelques années nde ozongi archile pourquoi osalaki nga boye😭
archile : gloria stp calmé toi to solola nanu
Gloria : archile abebisi vie nanga oke ko bala muasi mususu archile oza ndoki
Naomi : gloria to yoka ye nanu
archile : merci beaucoup maman ndenge ondimi ko yoka nga
Naomi : loba sikoyo
archile : maman premièrement nako seka bo limbisi nayebi que nasalaki gloria mabe makasi mais na sengi nayo olimbisa nga
Gloria : archile ko yebisa nga te que eza ya solo obala
archile : oui na bala
Gloria abandi ko lela😭
archile : stp gloria yoka ezalaki fauté nanga te stp gloria wapi muana nanga
Gloria tangu ayoki bongo abandi lisusu ko lela😭
archile : gloria muana aza wapi stp répondre nga
Gloria abeteli archile makambu nionso😭
archile azalaki choqué makasi😭
Gloria : sikoyo oye kosala nini ?
archile : muasi nanga azo bota te place nazo sala pona omata il faut ozala na muana yango nayaki kozua muana gloria esali nga pasi nazalaki vraiment na idée na bala yo mais depuis kaka le jour oyo ofingaka ex nayo esalaka nga pasi na banga ka mbala moko ko bala yo pona okokaki pe kosala nga ndenge osalaki ye
Gloria : soki oyebaki bongo pourquoi obimaki nanga maman nayo alobaki que oyaka awa pona ko somba biloko ya libala nayo😭
archile : non ezalaki bongo te akosaki yo mais naza désolé pour tout
Gloria : na vie nanga nako bota lisusu te pona yo😭
archile : naza désolé toko sala tout oyo boko loba nanga nako sala yango
esalaki archile pasi ndenge gloria ako bota lisusu te
Famille ya ba gloria ba senga ki archile asombela bango lopangu archile asalaki yango après azongaki naye Belgique
Gloria ba kataki ye ba trompe yaya naye fabrice apesa ye mbongo akoma ko teka ba maputa
archile pe azongaki malgré abandaki ko bota te à continue kaka na muasi naye
Lionel na maria ba bota muana muasi maria akoma ko kende Chine
Leki ya lionel pe asilisaki classe kuna na poto
Gloria : tala ndenge vie nanga esuki malgré archile asombeli biso lopangu mais nga nde na perdre parce que nako bota lisusu te vie nanga mobimba mobali nini ako linga muasi oyo abotaka te na bebisi vie nanga kaka likolo ya poto nazalaki ingrate liboso ya Lionel mais ye mutu asungi nga dans la vie la patience payé toujours😭.....Fin
HISTOIRE NA BISO ESILI HISTOIRE OYO ETEYA YO MUTU OBANDAKI YANGO NA EBANDELI TI NA S**A
TALA NDENGE GLORIA ASUKI NA VIE KO ZALA INGRATE TE
NZAMBE APAMBOLA BINO
TIA J'AIME PE COMMENTÉ PHOTO
17/04/2022
Notre société est là pour aider la population bomatracienes, de ne plus se déplacer pour aller faire des chopping, notre société est pour le faire à votre place et la livraison à domicile, pour plus d'informations appeler nous sur notre numéro WhatsApp : 0994035639
L'entreprise glogota rend des services ci après :
Achat et livraison des marchandises à domicile
Catégorie
Site Web
Adresse
Boma
Notifications
Soyez le premier à savoir et laissez-nous vous envoyer un courriel lorsque Glogota publie des nouvelles et des promotions. Votre adresse e-mail ne sera pas utilisée à d'autres fins, et vous pouvez vous désabonner à tout moment.